Psalms 59

Nzambe na ngai, kangola ngai

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi, eyembamaki na ndenge ya “Kobomba te” ; tango Sawuli atindaki bazinga ndako ya Davidmpo baboma ye.


1 Kangola ngai na banguna na ngai, Nzambe ;
batela ngai liboso ya bato
oyo batelemeli ngai.

2 Kangola ngai na baoyo basalaka mabe ;
mpe bikisa ngai liboso ya bato
oyo basopaka makila ya bato.

3 Tala ndenge balali-lali mpo na kozela ngai ;
bato ya makasi basaleli ngai likita,
mpo na mabe na ngai te,
to mpe mpo na lisumu na ngai te, Yawe.

4 Nasalaki mabe ata moko te,
nzokande bamibongisi mpo na kobundisa ngai ;
lamuka mpo na kosalisa ngai, tala ndenge nakomi.

5 Yawe, Nzambe ya nguya nyonso
mpe Nzambe ya Isayele ;
telema yo moko mpo opesa bikolo nyonso etumbu ;
mpe koyokela bato oyo basalaka mabe mawa te.

6 Bazongaka na pokwa,
bagangaka lokola bambwa,
mpe batambolaka-tambolaka na kati ya vile.

7 Tala, oyo bazali kosanza na minoko na bango ;
mipanga ezali na bambebo na bango ;
mpe bazali koloba : “Nani akoki koyoka biso ?”

8 Kasi yo, Yawe, ozali koseka bango ;
ozali koseka bikolo oyo nyonso !

9 E e makasi na ngai, nazali kotala epai na yo ;
yo, Nzambe, ozali ndako ya makasi na ngai.

10 Nzambe na ngai ya bolingo,
Nzambe liboso na ngai ;
mpe akotika ngai na sepela likolo ya baoyo
batongaka ngai.

11 Kasi koboma bango te, Yawe ebende ya makasi
oyo ebatelaka biso soki te bato na ngai bakobosana ;
na nguya na yo, komisa bango mitelengano
mpe kweyisa bango.

12 Mpo na masumu ya minoko na bango,
mpo na maloba ya bambebo na bango,
tika ete bakangama na lolendo na bango.
Mpo na elakeli ya mabe mpe mpo na lokuta oyo babimisaka,

13 silisa bango na kanda na yo,
silisa bango kino basila nye ;
Bongo ekoyebana kino na basuka ya mokili
ete Nzambe azali na bokonzi likolo ya Isayele.

14 Bazongaka na pokwa,
bagangaka lokola bambwa,
mpe batambolaka nzinga-nzinga ya vile.

15 Bazali kotelengana mpo na biloko ya kolia ;
mpe bagangaka soki batondi te.

16 Kasi nakoyemba mpo na makasi na yo ;
na tongo nakoyembela bolingo na yo ;
pamba te, yo ozali ekimelo
mpe ndako ya makasi na ngai na tango ya pasi.

17 E e makasi na ngai, nakoyemba masanzoli mpo na yo ;
yo, Nzambe, ozali ndako na ngai ya makasi,
Nzambe na ngai ya bolingo.
Copyright information for LinMNB